Psalms 112

Bolamu ya bato na sembo


1 Bosanzola Yawe !
Mapamboli na moto oyo abangaka Yawe,
azuaka esengo mingi na malako na ye.

2 Bana na ye bakozala bato ya nguya mingi na mabele ;
bato ya alima na tango na tango bato ya mapamboli.

3 Bomengo mpe bozwi ya ndenge na ndenge ezali na ndako na ye ;
mpe bosembo na ye ekowumela libela na libela.

4 Ata kati na molili, moi ebimaka mpo na moto ya alima.
Mpo na moto atondi na ngolu, mpo na moto atondi na mawa
mpe mpo na moto na sembo.

5 Esengo na moto oyo asalelaka bato makambo ya malamu,
bolamu ekoyela moto ya boboto mpe adefisaka na motema moko
oyo atambusaka misala na ye na bosembo nyonso !

6 Ya solo, ye akoki koningana ata moke te ;
moto na sembo bakobanda kokanisaka ye tango nyonso.

7 Akobanga basango ya mabe te ;
motema na ye etelema ngwi,
na kotiaka elikya na ye na Yawe.

8 Motema na ye ezali na kimia akobanga te ;
na suka akotala na elonga bayini na ye.

9 Akabolaka bisika nyonso makabo mpo na babola ;
bosembo na ye ewumelaka libela na libela ;
liseke na ye ekotombwana na likolo mpo na lokumu

10 Moto na mabe akomona mpe akosilika
akolia mino mpe akolimwa ;
baposa ya moto na mabe ekokoma eloko ya pamba.
Copyright information for LinMNB